S H A L O O M !
Na tondi bino botondi ba ndeko ba ngai ba bolingo, bino baye bokozuwa libaku lya kofungola blog na ngai. Nazali na mingi ya koyebisa bino te, bobele sango malamu ya Mokonzi mpe Mobikisi na biso Yezu Kristu. Yemei, asimba mitema mya biso, asalisa biso na boyebi Ye, atondisa biso na ngrasya mpe bwanya ya ye moko, mpo toyeba kolingana biso na biso, lokola Ye alingi biso, mpe amikabi mpo ya biso. Na bomoyi bwa Ye o kati na biso, alobaki ete : " banso bakoma moko (Jn 17,11) ", yango wana nde mystique bondeko, nondi bino lisusu bontondi mpo na kosukisa mbela na ngai, na botombeli na boboto mpe bondeko. Shalooooooooooooom!